Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pelosi alobi esengeli kolongola Donald Trump


Nancy Pelosi (D), mokambi ya ndako ya bakeli mibeko azali kopasola lisikulu lya mokonzi ya mboka (C) Donald Trump na Congrès, Capitole, Washington, 4 février 2020.
Nancy Pelosi (D), mokambi ya ndako ya bakeli mibeko azali kopasola lisikulu lya mokonzi ya mboka (C) Donald Trump na Congrès, Capitole, Washington, 4 février 2020.

Mokambi ya Chambre des représentants (ndako ya bakeli mibeko ya Etats-Unis), Nancy Pelosi alobi 'kolongola président Donald Trump ezali bosenga ya lombango", nsima na eyoma balandi ba ye basalaki na Congrès mpo na komeka kopekisa bondimi bwa elonga ya Joe Biden.

Mme Pelosi asengi na vice-président Mike Pence kosalela "25e ammendement" ya Buku likonzi mpe kosakola ete président Trump "akoki te" kokonza mboka lisusu.

Mme Pelosi alobi azali kozela eyano lelo jeudi na M. Pence oyo azali républicain lokola M. Trump mpe aponamaki vice-président nkasa moko na ye na maponami ma 2016.

Mme Pelosi apameli M. Trump na koluka kokweyisa bokonzi na kotindaka balandi ba ye mercredi kokota na Congrès mpe kopekisa bondimami ya bilembo ya elonga ya démocrate Joe Biden na maponami ma le 3 novembre 2020.

Moto moko akufaki na masasi ntango balandi basalaki eyoma na Capitole.

M. Pence atelemeki mpe eyoma yango.

Mme Pelosi apanamaki mposo moleki mpo na kotikala na ebonga ya bokambi chambre ya ba représentants.

Nsima na kondimama na elonga na ye na Congrès mercredi, Joe Biden esengeli alapa ndayi mpe avandisama na ebonga ya mokonzi ya mboka.

XS
SM
MD
LG