Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou na Tshisekedi bazali na Likita linene lya ONU na New York


Président ya RDC Félix Tshisekedi na mokokani na ye ya Congo-Brazzaville Denis Sassou Nguesso na bokutani na Niamey, 7 juillet 2019.
Président ya RDC Félix Tshisekedi na mokokani na ye ya Congo-Brazzaville Denis Sassou Nguesso na bokutani na Niamey, 7 juillet 2019.

Bakonzi baike babikolo bya molongo bazali kokoma na New York awa na Etats-Unis ya Amerika mpo na bobandi ya Likita linene lya ONU ya mbala ya ntuku sambo na mwambe.

President Félix Tshisekedi ya Ekolo Congo democratique, Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville, lokola mpe bakonzi ba bikolo bisusu bazali sika na New York.

Denis Sassou N’Guesso akomi na reaseau social X ete ekozala mpe mpo na ye libaku lya kokolisa boyokani na bikolo bisusu mpe kotombola bokutani mpo na bitando misato ya nzamba minene ya ba tropiques liye lisengeli kosalama na Brazzaville na sanza ya zomi ekoya.

Bayi ndako ya mosala ya Felix Tshisekedi bango basakoli ete mokonzi ya Ekolo Congo democratique akolobela nde mambi matali bokengi na monyele ya mboka na ye. Felix Tshisekedi akozala mpe na bokutani bwa ODD to ya Misala mya koluka ntombwa ekowumela.

Mokonzi ya RDC akozala mpe na bokutani na Blakc Cocus ya Parlement ya Amerika awa na Washingotn D.C. mpe na bokutani misusu.

Nzokande, Papa wa Roma asengi na lisikulu asali ya pembeni ya likita lya ONU ete mokili mosangana na kotalaka ndenge climat ebebisami.

Forum

XS
SM
MD
LG