Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis esengi na Kinshasa na Kigali komibenda mpo na koboya bitumba


Mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (D) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame.
Mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (D) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame.

Etats-Unis elobi ete Ekolo Congo démocratique (RDC) na Rwanda basengeli komipekisa kokenda na bitumba na monyele ya RDC.

" Ngambo inso na matata maye mpe bayi etuka basengeli kozongela na kozela te misala mya kimya mya Nairobi mpe Luanda – makasi ma diplomatie, kasi matata ma mapinga nde mazali te nzela ya eyano ya boyokani mpe kimya ekuwumela," elobi Robert Wound, motindami ya ekolo Amerika, na likita lya mbalakaka lisalamaki mokolo mwa mosala mibale na Conseil ya sécurité ya ONU mpo na mobulu na est ya RDC.

Kinshasa, ONU na bayi ngambo ya West ya mokili bapameli Rwanda kopesa maboko na batomboki ba M23 na est ya RDC na ntina ya koluka kozwa eteni mpe bomengo ya mboka eye.

Na ngambo na ye, ntoma ya Rwanda alobi ekolo na ye ezali kopesa nde eyano na maloba ma bobangisi bwa RDC mpe akebisi Kinshasa na kokoba kopesa maboko na batomboki ba Rwanda ba FDLR baye bakima nsima na bobomi bonene, génocide bafundama kosala.

Bitumba bizongelaki na monyele ya RDC nsima na sanza mingi ya kimya.

Mokonzi ya Ekolo Congo democratique akundolaki, mokolo mwa mosala minei moleki na bokutani bosalamaki ntango ya likita linene ya Union africaine na Addis-Abeba (Ethiopie), ete Kinshasa ekondima soki moko te kosolola batomboki ba M23.

Forum

XS
SM
MD
LG