Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

OCHA elobi ete motango ya bato bakufi na bombi na camp Mugunga na Nord-Kivu mozali koleka zomi na mwambe


This photograph taken on May 6, 2024 shows a shelter that was destroyed on Friday May 3, 2023.
This photograph taken on May 6, 2024 shows a shelter that was destroyed on Friday May 3, 2023.

Motango mwa bato bakufaki na ba bombes eye ekweyaki mokolo mwa mosala mitano moleki na esika ya bakima bitumba na Mungunga, na etuka ya Nord-Kivu, mokomi koleka zomi na mwambe, elobi lelo OCHA, Misala mya ONU mikambaka lisungi. Moye ya basusu bazokaki nde mokomi ntuku misato na mibale. OCHA elobi na liyebisi ete mingi bakufaki ntango bazalaki komema na lopitalo mpo na mpota enene. Mbulamatari ya Nord-Kivu elobaki mokolo mwa mosala mitano ete bato koleka zomi na minei nde bakufaki na bombes ebetamaki na bitumba kati na mampinga ma Ekolo Congo Démocratique baye basungami na ba bundi ya ba Wazalendo na batomboki ba M23 baye Kinshasa efundaka Rwanda kopesa maboko.

Forum

XS
SM
MD
LG