Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eloko te elakisi ete Malanga mokambi ya baye bamekaki kokweyisa bokonzi na Kinshasa azali moyi Amerika, kolanda département d'Etat


FILE PHOTO: A man in military fatigues speaks inside the Palace of the Nation during an attempted coup in Kinshasa
FILE PHOTO: A man in military fatigues speaks inside the Palace of the Nation during an attempted coup in Kinshasa

“Na botosi bonso tozali na yango mpo na mowei, tozali ata na mikanda na ye moko te mitalisi ete azali moyi ekolo Amerika,” esakoli lelo liboso na Washington molobeli ya département d’état to ministre ya mambi ma Bapaya ya Ekolo Amerika Matthew Miller liboso lya bapanzi nsango.

Bakonzi ba mampinga ma Ekolo Congo Démocratique basakolaki ete mokambi ya baye bamekaki kokweyisa, Christian Malanga, azalaki na mikanda mya bomwana mboka ya Amerika mpe abomamaki na mobulu mwa boluki bokweyisi bokonzi o'mokolo nwa eyenga, 19 mai 2024.

Na maloba ma ye liboso lya pabanzi nsango, M. Miller aboyi kopesa makanisi maye mpo etali bato basusu Kinshasa ekangaki bo’ bayi Amerika baye bazalaki na mobulu mwa koluka kokweyisa bokonzi mokolo mwa eyenga moleki na Palais de la nation na Kinshasa.

Alaki kaka ete Ekolo Amerika ekoluka kokuta na bango na nzela ya consulat lokola soki mwana moko mboka akangami libanda lya mboka mpo na likambo songolo to pakala.

Alobi ete ekolo Amerika epameli mobulu bato na manduki basalaki lobi loleki na koloka kokweyisa bokonzi na Kinshasa.

“Topalemi bitumba bya mandoki likolo lya baye bazali na Assemblée nationale mpe na Palais de la nation mpe tolemeli mobulu mya poilitiki lya ndende na ndenge,” esakoli molobeli yasakoli molobeli ya département d’état M. Miller.

Kolanda maloba ma ye, mbulamatari ya ekolo Amerika ezali “komitungisa mpenza na nsango etali bozali ya bana ba yango” na makambo maye.

M. Muller apesi mpe nsango ete Washington ezali kolandela makambo mango mpe ekosala elongo na ba bakonzi ba RDC na makakoki manso masengeli mpo koluka koyeba na botosi bonso ndenge nini bana ba Amerika bamikotisaki na makambo mango.

Ntoma ya Amerika na Kinshasa Lucy Tamlyn alakaki mpe mwa ngonga nsima na bomeki kokweyisa bokonzi ete Amerika ekopesa maboko na bolukiluki bozali kosalama.

Forum

XS
SM
MD
LG