Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bureau Vital Kamerhe ezali kosala makasi mpo na bovandisi mbulamatadi ya sika


Vital Kamerhe na bokutani ya opposition ya RDC na Genève, Suisse.11 novembre 2018.
Vital Kamerhe na bokutani ya opposition ya RDC na Genève, Suisse.11 novembre 2018.

Tobanda na suku ya nse ya ndako ya bakeli mibeko to Assemblée Nationale esika kani engebene na article 115 ya mobeko likonzi, bokutani ya sanza ya misato ekosila na suka mokolo ya poso ya zomi na mitano ya sanza ya motoba ezali koya na Palais du people. Bureau Vital Kamerhe ezali kosala makasi mpo na kolengela mikolo mitikali mpo na bovandisi mbulamatadi ya sika, eye ezelami wuto bovandisami to investiture ya Félix-Antoine Tshisekedi na bokonzi po na mbala mibale. Yango nde moko ya mikano miye mizuamaki sima ya bokutani ya yambo ya bureau definitif ya mokolo ya poso moleki eye etambuisamaki na Vital Kamerhe na Palais du peuple.

Forum

XS
SM
MD
LG