Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba kuluna ya Kinshasa batindami na Kanyama Kasese mpe papa moko alandi muana na ye


Police ezali kolongla mabanga baetelemeli batiaki na nzela na Goma, Nord-Kivu, 20 décembre 2021
Police ezali kolongla mabanga baetelemeli batiaki na nzela na Goma, Nord-Kivu, 20 décembre 2021

Botindami ya bilenge baye basalaka mobulu to ba kuluna na kowuta Kinshasa kino Kanyama Kasese bozali kokoba. Lobi loleki, lingomba mosusu ya bilenge nkama misato na ntuku mibale na mitano epesami na Service National mpo na kolanda mateya ya bosoda mpe ya boyekoli mosala. General Jean-Pierre Kasongo Kabwik, commandant ya Service National, alobi ete bilenge basi mpe babali nkama misato mpe zomi na libwa bazali kokende na Kanyama Kasese, na kolekela na nzela ya Mbuji-Mayi. Na kati na bilenge bana, papa moko azui mokano ya kokende na muana na ye mokangemi mpo komitiya na kosalela ekolo.

Forum

XS
SM
MD
LG