Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Medecins sans frontiere elobi ete bakimi bitumba bazali konyokwama mingi na bitumba ya ba M23


Bavandi baike ya Bambo na territoire ya Rutshuru, na 60 kms na Goma, bazali kokima bitumba ya batomboki ba M23 kati na nzamba, Nord-Kivu, 26 sanza ya zomi 2023.
Bavandi baike ya Bambo na territoire ya Rutshuru, na 60 kms na Goma, bazali kokima bitumba ya batomboki ba M23 kati na nzamba, Nord-Kivu, 26 sanza ya zomi 2023.

Bakimi bitumba bazali konyokwama mingi bo’ mbano ya bitumba ya ba M23, elobi Medecins sans frontiere. Koleka nkoto moko na ndambo bazoki wuta ebandli ya mobu, kolanda Mokambi ya Medeceins Sans Frontiere Hollande na monyele ya RDC, Natalia Torrent na biyano apesaki na VOA lingala. Mingi kati na bango batindami kokima bisika bya bango mbala na mbala. Lokola na Minova na Sud-Kivu epayi bazali kokima sika na ba bombes mpe bitumba kokoma bisika bazali. Natalia Torrent asengi botosami bwa makokoki ma bomoto mpo bitumba bizali kosalama pene na bisika bakima bitumba bazwami pene na Goma.

Forum

XS
SM
MD
LG