Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ndako pene na zomi na mitano etumbami na moto na Goma


Magazini mpe ndako mingi lokola mpe biloko bisusu bilaki moto nsim na motuka momemaka petololo kopela moto na nzela ya Py Bass, Kinshasa, RDC, 8 sanza ya mwambe 2023. (ACP)
Magazini mpe ndako mingi lokola mpe biloko bisusu bilaki moto nsim na motuka momemaka petololo kopela moto na nzela ya Py Bass, Kinshasa, RDC, 8 sanza ya mwambe 2023. (ACP)

Motango mwa zomi na mitano ya ndako nzike ya bavandi ekomaki putulu nsima ya bozikisami na moto moko biyebani te bisika biwuti.

Ezalaki lobi loleki na quartier Ndosho eye ezuami na commune ya Kirisimbi, na Goma, chef-lieu ya etuka ya Nord-Kivu.

Na Actu30.cd, Elisabeth Ayinkamiye, mopesi toli na commune ya Karisimbi, alobi ete biloko binso biye bizalaki na ba ndako mana bizikisami na moto.

Amonisi ete mpo na kosilisa moto lina, ndako esusu zomi na mibale esengelaki kokweyisama.

Elisabeth Ayinkamiye asengi motuka ya bobomi moto mpo na commune ya Karisimbi mpe bofungoli ya bolukiluki na misala ya mayele na ntina ya koyeba bisika mbeba ewuti.

Ndako ntuku mineyi na motoba ya bavandi ezuaki moto na commune ya Karisimbi na mposo yoko sika na commune eye.

Forum

XS
SM
MD
LG