Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maponami ma mokonzi na Etats-Unis: Biden na Trump bandogwani mbala yambo na etando eke ya CNN


Mokonzi azali na ebonga na Etats-Unis Joe Biden (G) na mbanda wa ye mokonzi ya kala Donald Trump na bondongwani bwa bango ya yambo na etando eke ya CNN yambo na maponami ma sanza ya zomi na moko, Altanta, Georgia, 17 sanza ya zimi na moko 2024.
Mokonzi azali na ebonga na Etats-Unis Joe Biden (G) na mbanda wa ye mokonzi ya kala Donald Trump na bondongwani bwa bango ya yambo na etando eke ya CNN yambo na maponami ma sanza ya zomi na moko, Altanta, Georgia, 17 sanza ya zimi na moko 2024.

Mokonzi azali na ebonga na Etats-Unis Joe Biden na mbanda wa ye mokonzi ya kala Donald Trump bandongwanaki na mpokwa ya mokolo mwa mosala minei moleki liboso lya etando eke ya CNN na Atlanta, na Georgia.

Moyi démocrate Biden na mbanda wa ye répulcain Trump bayanolaki na mituna mya bapanzi nsango babale mpo na makambo mingi lokola nkita ya ekolo, bokoti bwa bapaya na mboka, mbongwana ya climat, Democraie, bitumba na Ukraine mpe na Israel.

Batali bazalaki te mpo na kozomela to kobetela maboko ndenge bandongwani babale bandimaki yambo na linaka lyango.

M. Trump apamelaki mbala mingi M. Biden kokotisa babapaya mingi na nzela ya makolo na Mexique mpe na mayuya. Mpo na M. Trump, yango ebebisi nkita, misala mpe bokengi na ekolo.

“Tozalaki na ndelo ya bokengi koleka na lisitwale kasi sika tokomi na ndelo ebeba koleka mpe bato bazali kokufa bisika binso. Totikala te kozala na likambo lya ndenge liye,” elobaki M. Trump.

M. Biden ayanolaki ete ezali “lokuta”.

“Eloko moko te elakisi makambo maye azali koloba. Azali kobakisa makambo, azali kokosa,” eyanolaki M. Biden.

Mpo etali démocratie, M. Biden apamelaki M. Trump kozanga makoki ma democratie.

“Sika, azali koloba ete soki alongi te mbala eye lisusu, bo’ moto alelaka lelaka lokola azali, makila makotanga,” elobi M. Biden.

Na bobeti sete ya bapanzi nsango soki akondima bilembo bya maponami mbala eye, Trump azongisaki : “Soki maponami mazali ya malamu mpe matosi mibeko mpe na alima”.

M. Biden na M. Trump bapesanaki mbote te na libandela mpe na suka ya bondwangi bwa bango.

M. Biden abandaki bobeti ntangwa na ye ya maponami o’mokolo mwa mosala miteno na Caroline du nord mokolo moko nsima na bondongwani boye.

Forum

XS
SM
MD
LG