Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda 31 ya FARDC babandi kosambisama mpo bakimaki ba M23 na mboka Alimbongo


Basoda ba mampinga ma RDC (FARDC) na état de siège na Goma, Nord-Kivu, sanza ya mitano 10 2021.
Basoda ba mampinga ma RDC (FARDC) na état de siège na Goma, Nord-Kivu, sanza ya mitano 10 2021.

Basoda 31 ya mampinga ma Ekolo Congo Democratique, FARDC, babandi kosambisama lelo na mboka Alimbongo na bofundami ya kokima batomboki ba M23 baye bazali kopusana na territoire ya Lubero, na etuka ya Nord-Kivu wuta mwa mikolo.

Ba capitaines babale na basi ba bango basato bazali mpe kosamba. Basoda bango bafundami mpe kobebisa masasi mpe kopunza biloko bya bato.

Nzokande, Bitumba kati na batomboki ba M23 na mampinga ma Ekolo Congo Démocratique baye basungami na babundi babengami ba Wazalendo bikobaki lelo na Kaseghe, na monyele ya groupement Musindi, na kilometre pene na zomi ba nord ya Kirumba, na territoire ya Lubero, na Nord-Kivu.

Bayi bisika batatoli ete bitumba bizala nde kongala na mboka Vurambia epayi lokito lya bibundeli bya minene mpe mike lozali koyokama.

Bavandi mingi bakimi mboka lokola Alimbongo, Nduta, Mambasa, Kanyambi mpe Ndoluma.

Mingi bazali kokima nde mpo ba FARDC bazali kobetaka masasi likolo mpe bazali kopunza mpe kobotola biloko bya bato.

Forum

XS
SM
MD
LG