Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Uganda elobi bofundi bwa ONU ete ezali kosunga M23 bozali kosekisa


Bayi mampinga ma Uganda (UPDF) bazali kosala bokengi esika batomboki ba M23 balongwaki na Bunagana, Nord-Kivu, RDC, 9 sanza ya minei 2023. (Reuters)
Bayi mampinga ma Uganda (UPDF) bazali kosala bokengi esika batomboki ba M23 balongwaki na Bunagana, Nord-Kivu, RDC, 9 sanza ya minei 2023. (Reuters)

Ekolo Uganda ewangani kopesa lisungi na batomboki ba M23 lokola mokanda mwa ONU mosakali yango.

Molobeli molandi ya mampinga ma Uganda, Colonel Deo Akiiki alobi ezali kosekisa mpe ezangi loboko mpe ezali na nzela ya bozangi mayele.

Colonel Deo Akiiki akundoli ete mampinga ma Kampala na Kinshasa masalaka elongo mpo na kobudisa batomboki ba ADF na monyele ya RDC kolonda boyakani bazali na yango mpo na koyikisa kimya makasi.

Mokanda mwa ba nganga ya boyebi ya ONU mwa sanza motoba yay ambo ya mobu moye, mobimisamaki o’mokolo mwa mosala moko mpe mopamelaki Uganda kopesama maboko na batomboki ba M23. Banganga boyebi ya ONU balobi ete bayi misala mya bokengi mya Uganda bazali kosala makambo ma yawuli.

ONU elobi polele ete Uganda etikala soki moke te kopekisa M23 mpe RDF mampinga ma Rwanda koleka na mabele ma yango mpe boleki na bango ntango nan tango na mabele ma Uganda boye bosalamaka mingi mpenza mpe na lolenge ya makasi bosali ete bomama ma polele.

Ba nganga ya boyebi bapameli mpe Rwanda kokota na mabele RDC mpe kotambola likolo lya bonsomi bwa ekeolo eye.

Balobi polele ete ba oficiers ba Rwanda bazwi M23 na maboko mpe bazali kotambwisa yango. Mpo ba bayi ONU basoda ba Rwanda baleki kutu na motango bayi M23 baye bazali pene na nkoto misato.

Molobeli ya mbulamatari ya Rwanda Yolande Makolo na ngambo na ye, afundi nde Kinshasa kokanela ntango inso kosala bitumba na Kigali.

Forum

XS
SM
MD
LG