Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour suprême ezongisi etumbu ya mibu mitano na mwana ya José Eduardo dos Santos mpo na bopengwisi misolo


José Filomeno dos Santos, mwana ya nkondo mokonzi ya kala ya Angola José Eduardo dos Santos na tribunal, Luanda, sanza ya zomi na mibale 2019.
José Filomeno dos Santos, mwana ya nkondo mokonzi ya kala ya Angola José Eduardo dos Santos na tribunal, Luanda, sanza ya zomi na mibale 2019.

Cour supreme ya Luanda, na Angola, ezongisi etumbu ya mibu mitano ya boloko na mwana ya nkondo mokonzi ya kala ya ekolo eye José Eduardo dos Santos Cour constitutionnelle elongalaki ba sanza eleki.

Etumbu yango ezalaki mpo na bopenguisi misolo Jose Filomeno dos Santos afundamaki na yango mpo na kotinda koleka dollars millions nkama mitano wuta ya Banque centrale na compte ya agence ya nyongo moko ya Suisse na Londres.

Na mibu ntuku mibeni na motoba Jose Filomeno dos Santos oyo abengamaka mpe "Zenu" afundamaki elongo na bato basusu babale.

Mpo na kolongola etumbu yango, Cour constitutionnelle elobaki ete bazuzi basambisaki "Zenu" bandimaki te makambo maye basambeli bamemelaki bango mpe epamelaki bokeseni kani na ntina ya bofundami na etumbu.

Forum

XS
SM
MD
LG