Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

BaMobondo babomi basoda libwa na Kwamouth


Bato baike bazali kosala mobembo kati na bwato etindikami na mopepe na ebale ya Congo na nzela ya Kwamouth, pene na Kinshasa, RDC, 29 sanza ya misato 2024.
Bato baike bazali kosala mobembo kati na bwato etindikami na mopepe na ebale ya Congo na nzela ya Kwamouth, pene na Kinshasa, RDC, 29 sanza ya misato 2024.

Basimba manduki babengami ba Mobondo babomaki basoda libwa ya ekolo na bitumba na mboka Kinsele, pene na 130 km na nord-est ta Kinshasa, esakoli molobeli mwa FARDC, Mampinga ma RDC, general Sylvain Ekenge.

“Basimba mandoki 35 babomamaki mpe lokola,” elobi gén. Ekenge oyo abakisi ete bobomi bwango bosalamaki o'mokolo mwa mposo moleki.

Mokonzi ya mboka Kimomo pene na Kinsele atatoli ete commandant moko, lieutenant moko, ba capitaines babale mpe basoda batano bakufaki na bitumba bya ba Mobongo baye bazali mingi nde ya kabila ya ba Yaka.

Ba Yaka bazali kobunda na bayi kabila ya Bateke wuta mibu mileki na Kwamouth, na etuka ya Maï-Ndombe mpe bitumba byango bikomaki kino na bituka nzinga nzinga, ya Kwilu mpe Kwango.

Ba civili mingi ya ngambo mibale bakufi mpe biloko mingi bibebisami wuta bobandi bwa bitumba biye na 2022.

Bitumba biye bizali kokoba ata ko bakonzi ba bonkoko ya kabila mibale batiaka manzaka ma boyokani liboso lya mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi na sanza ya minei ya 2024.

Forum

A lire aussi

XS
SM
MD
LG