Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Amerika esakoli bobakisami bwa mikolo zomi na mitano misusu na botelemisami ya bitumba kati na Fardc na M23


Président Joe Biden ya Etats-Unis ayambi président Félix Tshissekedi na ndako na ye ya mosala na Maison Blanche, na Washington DC, 16 décembre 2022. (Présidence ya RDC)
Président Joe Biden ya Etats-Unis ayambi président Félix Tshissekedi na ndako na ye ya mosala na Maison Blanche, na Washington DC, 16 décembre 2022. (Présidence ya RDC)

Ekolo Amerika esakoli bobokisama bwa mikolo zomi na mitano misusu na botelemiami ya bitumba kati na batomboki ba M23 baye Kinshasa efundaka Kigali kopesa maboko na mampinga ma Ekolo Congo Democratique na etuka ya Nord-Kivu.

Maison Blanche elobi na liyebisi libimisamaki lobi loleki ete Ekolo Amerika ezali kolandela mpena na bokebi bonso botamboli likolo lya botelemisi bitumba botiamaki wuta mokolo mwa mitano moleki.

Washigton ebakisi ete ezali kopamela bobomi bwa bacivili na Bweremana ata ko baye bazali kobunda batosi na ndenge ya mingi motelemisi bitumba.

Etats-Unis elobi ezali kosala elongo na misala mya bolandeli mpo na kosala bolukiluki na bobomi boye mpe na makambo manso masusu ma mobulu na ntina ete baye bazali nsima na yango bamema mokumba.

Ekolo Amerika ezali kokoba kopesa maboko na misala mya Luanda mpe elobi ekosala na mbulamatari ya RDC, Rwanda mpe Angola mpo ete basalela bobakisi mikolo na botelemisi bitumba biye na ntina ya kozwa miko mikopesa nzela na botelmisi bitumba bokowumela mpe ete bakima bitumba bandima kozonga bisika bya bango.

Forum

XS
SM
MD
LG