Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour militaire epesi etumbu ya liwa na Nangaa na bato basusu 25


Mokambi ya CENI (Commission électorale nationale indépendante), Corneille Nangaa, kati na bakambi ya police, Kinshasa, le 30 décembre 2018.
Mokambi ya CENI (Commission électorale nationale indépendante), Corneille Nangaa, kati na bakambi ya police, Kinshasa, le 30 décembre 2018.

Corneille Nangaa, mokonzi ya kala misala mya maponami na ekolo Congo Democratique CENI RDC) mpe mokambi ya batomboki ba Alliance Fleuve Congo (AFC) akatelami etumbu ya liwa na bosambisami bosalami na bozangi na ye na Kinshasa.

Bazuzi ba Cour militaire ya Kinshasa/Gombe bakweyisi ye na likambo na mbeba ya bitumba, boteki mboka mpe bozali na lingomba lya batomboki.

Lokola Corneille Nangaa, bato ntuku mibale na mitano basusu bakatelami mpe etumbu ya liwa.

Kati na bato banso bapesami etumbu, ntuku mibale na moko bakimaka.

Bazuzi basakoli bokangami bwa biloko binso bya Corneille Nangaa mpe bopesami bwa yango na maboko ma l'Etat.

Bato bango bazalaki kosambisa wuta mokolo mwa ntuku mibale na minei ya sanza ya sambo ya mobu, AFC ekelamaki na sanza ya zomi na mibale ya mobu moleki na Nairobi, na Kenya, mpe ezali kobunda na mopanzi ya M23 eye efundamaka na mbeba mpe mbolu mingi.

Kati na bato baye, ezwami mpe na mokambi ya M23, Bertrand Bisimwa, mokonzi ya basoda ya M23 Sultani Makenga, molobeli na yango ya soda major Willy Ngoma na oyo ya civili Lawrence Kanyuka.

Baike ba PPRD, lingomba lya mokonzi ya kala ya RDC, Joseph Kabila, baye bakota na AFC mpe bazali kati na bato baye.

O'mokolo mwa mosala mibale, mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi afundaki mokonzi ya kala Joseph Kabila akitanaki na ye, kozala nsima na AFC.

"AFC, ezali nde Kabila," eboki Félix Tshisekedi na biyano apesaki na CongoIndépendant.com na TopCongo FM.

Botelemisi botiami na mosala ya etumbu ya liwa bolongalamaki mobe moye na Ekolo Congo Democratique.

Forum

XS
SM
MD
LG