Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokili mozali kobanga bopanzani bwa Mpox eye ebandaki na RDC


Tata ya bana motoba, Jean Kakuru Biyambo, na mibu 48, azali kobela Mpox na esika bakima bitumba batiama na Nyiragongo, Nord-Kivu, RDC, 16 sanza ya sambo 2024. REUTERS/Arlette Bashizi
Tata ya bana motoba, Jean Kakuru Biyambo, na mibu 48, azali kobela Mpox na esika bakima bitumba batiama na Nyiragongo, Nord-Kivu, RDC, 16 sanza ya sambo 2024. REUTERS/Arlette Bashizi

Mokili mozali kobanga ete lolenge la sika ya bokono bwa Mpox boye bobandaki na Ekolo Congo Démocratique bopanzana.

Moto moko awuti kozwama na yango mpo na mbala ya yambo Suède, na Europa, mpe mosusu amonani na Pakistan, na Asie.

Na RDC epayi clade 1, virus ya lolenge la sika ya Mpox emonanaki, bato 548 basi bakufi na yango wuta libandela ya mobu. 15.664 nde motango mwa bato bazwi yango.

Na RDC bituka bya Sud-Kivu, Nord-kivu, Tshopo, Equateur, Nord-Ubangi, Tshuapa, Mongala, Sankuru, Kinshasa mpe nzinga nzinga na yango, bisambami nde mingi koleka.

Bato 39 mpe bazwami na yango na Nigeria kati na bato 788 baye batalisamaki mpo na yango, elobi mokambi ya bolandeli makono na Nigeria, Jide Idris.

Bikolo biike bibandi kokengela mpenza malamu bokoti na ndelo na yango mpo na Mpox, lokola Chine epayi ekenge ekomisami makasi.

ECDC to Centre européen ya bokisi mpe kokengele makani esengi na bikolo bya Poto to ya Union européenne basengami kobakisa ekenge na yango.

OMS, Mabongisi ma molongo mpo na bokolongo, esengeli esakola malako ma yango ma yambo nsima na likita lya misala mya comité d’urgence.

Africa CDC, Misala mya Union africaine mpo na bokolongono, esakolaki urgence ya santé publique na Afrika.

Koleka bato 17.000 bandimami kozala na yango na mokili na bikolo 12 mpe koleka 500 basi bakufi.

Forum

XS
SM
MD
LG