Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre Mutamba apemisi procureur gen. ya Cour d’appel ya Kinshasa mpo na incendent diplomatic na ambassade ya France


Ministre ya Sembo ya RDC Constant Mutamba na bosambisami ya bato bafundama kozala ba M23 na boloko bwa N'dolo, Kinshasa, 8 sanza ya mwambe 2024.
Ministre ya Sembo ya RDC Constant Mutamba na bosambisami ya bato bafundama kozala ba M23 na boloko bwa N'dolo, Kinshasa, 8 sanza ya mwambe 2024.

Procureur général na Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe apemisiami na mosala mwa ye nsima incident diplomatic esalami na bobimisi na makasi mpe kobeta ba diplomates ya France na Kinshasa.

Apesamisami na mokona mwa ministre d’Etat, ministre ya mambi ma Sembo, Constant Mutamba.

« Kolanda bosalami na bobukisami mibeko boye bomemaki na na bobeganami ya diplomate français, ministre d’Etat, ministre ya Sembo asakoli na bato été mikano miye milandI : Botelemisi na kozela te ya Procureur général na Cour d’appel na Kinshasa/Gombe oyo abimisaki mokanda ya kosenga nsango moye mopesaki nzela na bobengani yango, » elakisi liyebisi lya ndako ya mosala ya ministère ya Sembo.

Ministre Constant Mutamba apemesi mpe bakonzi basusu banso baye bazalaki na mbemba yango.

Asakoli mpe lisusu bokangami bwa basali banso bazalaki na mosala mwango mpe bobengisami ya bazuzi baye bazwami mokano moye « bozangi sembo ».

Likambo lyango limemeki mwa nungu nungu kati na Kinshasa na Paris.

Mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi alobaki ayoki motema mpasi na mobulu moye ntango ayambaki na masolo ntoma ya France Bruno Aubert.

O’mokolo mwa mposo moleki, bayi bokengi baike, kati na bango basoda, bakotaki na esika moko ya ambassade ya France na Kinshasa na ntina ya kobengana na makasi moko na ba diplomates ya France, endimi ministre ya mambi ma Sembo ya RDC na liyebisi moko.

Bayi ngambo ya ambassade nde balobaki ete Conseiller ya cooperation mpe action culturelle akangamaki ngonga misato.

Abetamaki mpe ba diplomates babale basusu batindikamaki kasi bazokaki te.

Ministre ya Sembo ya RDC alobi kati baye basalaki mobulu moye ezalaki na bayi pulusu mpe basali ba parquets mpe baike baye basi batiami maboko.

Mobulu mwango mosalaki na boweleli mabele to lombango, kolanda ndako ya mosala ya president elix Tshisekedi.

Forum

XS
SM
MD
LG