Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mopanzi nsango Lucien Kahozi akufi na mbalakaka na Lubumbashi


Mopanzi sango Lucien Kahozi akufi na Lubumbashi, o;mokolo mwa mposo, 31 ya sanza ya mwambe 2024. (Facebook/Lucien Kahozi)
Mopanzi sango Lucien Kahozi akufi na Lubumbashi, o;mokolo mwa mposo, 31 ya sanza ya mwambe 2024. (Facebook/Lucien Kahozi)

Lucien Kahozi, moko na bapanzi nsango oyo azalaki koluka mpe kopesa nsango na Lolaka la Amerika, akufi wuta mokolo mwa mposo moleki, mokolo mwa 31 ya sanza ya mwambe ya 2024 na Lubumbashi, engumba mokonzi ya etuka ya Haut-Katanga epayi azalaki kovanda mpe kosala mosala.

Kolanda nsango ya bayi libota, akufaki na mbalakaka.

Lucien Kahozi azalaki kopesa nsango na manaka ma VOA mpo na Lingala, français mpe swahili.

Azalaki koluka mpe kopesa nsango mpo na misala misusu mya nsango na molongo lokola AFP (Agence française de presse).

Forum

XS
SM
MD
LG