Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ruto abengisi bokutani ya Kagame na Tshisekedi na EAC ntango M23 ezali koloba ete ezwi Goma


Na elilingi epesami na mampinga ma Uruguay na Monusco na AFP, basoda baike ba RDC bazali kozongisa bibundeli ba bango na misala mya kimya ya ONU, na Goma. Nord-Kivu, 26 sanza ya yambo 2025.
Na elilingi epesami na mampinga ma Uruguay na Monusco na AFP, basoda baike ba RDC bazali kozongisa bibundeli ba bango na misala mya kimya ya ONU, na Goma. Nord-Kivu, 26 sanza ya yambo 2025.

Mokonzi ya Kenya mpe mokambi ya EAC, likita lya bikolo bya Afrika ya Est asakoli ete abengisi likita lya bakonzi ba bikolo bya liboke liye na ngonga 48 ekoya, ntango batomboki ba M23 bazali kosakola ete babotoli Goma kasi Kinshasa epesi nsango te mpo bokweyisami ya engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

Kolanda nsango ya bavandi mpe bapanzi nsango, Goma ezalaki kino ntongo ya mokolo mwa mosala moko na maboko ma ba FARDC ata ko mampinga ma Rwanda mamekaki kokota na Goma bisika biike o mokolo mwa eyenga na ntongo kasi bazongisamaki nsima na bayi RDC.

Bato baike bakima enguma eye.

William Ruto apesi losako na bakokani ba ye Paul Kagame ya Rwanda na Felix Tshisekedi ya mpo bandimi kozala na bokutani abengisi.

Batomboki ba M23 basakolaki o mokolo mwa eyenga ete babotoli Goma, engumba ya monene koleka na est ya RDC, nsima na bitumba bitindaki bituluku bya bato kokima, esakoli misala mya bopesi nsango Reuters na AP.

"Tozwi Goma mpe topesaki na ba soda mitindo ya kopimesa yambo na ngonga ya misato na ntongo ya esika eye", esakolie na Reuters Corneille Nangaa, mokambi ya Alliance Fleuve Congo liboke lya batomboki liye lizali mpe na M23 na kati.

Reuters elobi te yango moko soki engumba ya Goma ezali mpenza mobimba na maboko ma batombki.

Balobeli ba mbulamatari na Kinshasa mpe ya mampinga bayanolaki te na bosenga ya kopesa makanisi ma bango.

Misala mya nsango mya ekolo Amerika Associated Press epesi mpe nsango yango, na kotangaka liyebisi lya lingomba lya batomboki liye lizali kosenga "bavandi kozala kimya mpe kosenga na basoda ba FARDC, mampinga ma RDC kosangana na etando ya masolo ma engumba eye".

VOA emekaki kotuna molobeli ya mbulamatari ya RDC kasi ekokaki te kozwa ye na nsinga.

Na ngambo na yango, AFP ebimisi bilili to ba photos ya basoda baike ya FARDC kotikaka minduki mpe sokoto na bango na ba soda ba Uruguay ya Monusco, Misala mya boyikisi kimya ya ONU. AFP elobi bilili byango bipesami na mampinga ma Uruguay ma ONU.

Limpinga lya basoda ba Uruguay ya Monusco esakoli na liyebisi ete bayi mampinga ma RDC baike bazongisi mandoki ma bango na Monusco.

Basoda ba Monusco bazalaki mikolo miye na bitumba ngambo ya FRAC. Baike na bango mpe bakufaki kati basoda ya bapaya 13 baye babungisi bomoi.

Forum

XS
SM
MD
LG