Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alongoli Ekolo Amerika na misala mingi mya ONU


Mokonzi ya ekolo Amerika Donald Trump azali kolobela bapanzi nsango nsima na kotiya manzaka na mokano ya kolongola mboka na ye na misala mingi mya ONU, na bureau Oval, Ndako ya Bembe, Washington, DC, 4 sanza ya mibale 2025.
Mokonzi ya ekolo Amerika Donald Trump azali kolobela bapanzi nsango nsima na kotiya manzaka na mokano ya kolongola mboka na ye na misala mingi mya ONU, na bureau Oval, Ndako ya Bembe, Washington, DC, 4 sanza ya mibale 2025.

Donald Trump atie manzaka na mobeko moko mozali kolongola Ekolo Amerika na misala mingi mya ONU mpe mozali kopesa nzela na kotala lisusu misolo miye Washington epesaka na mambongisi ma molongo maye mazalaka na New York.

Mokano mwa mokonzi ya ekolo Amerika molongoli bongo mboka eye na Conseil ya makoki ma bomoto ya ONU.

USA ezalaka te kati na yango, kasi ezalaka motali.

Mokano mwango mokopekisa bokotisami bwa Washington na mabongisi mango ata ko ndenge ya komilongola bo motali eyebani te.

Mokano mwango motelemisi mpe misolo minso Amerika epesaka na Unrwa, misala mya ONU mpo na baye bakima ekolo Palestine.

Washington na bikolo misusu basi batelemisaki kobesa misolo na Unrwa nsima na Israel kofunda basali ba yango na sanza ya yambo ya 2024 kozala kati na baye babandaki bitumba ya Hamas o mokolo mwa sambo ya sanza ya zomi ya 2023.

Mokano mwa Trump mokotala mpe misala mya Washington na Unesco, misala mya ONU mpo na mateya, zebi (science) mpe ntoki (culture).

Ezali kotala misolo Ekolo Amerika epesaka na ONNU.

Forum

XS
SM
MD
LG