Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato 2.900 bakufaki ntango M23 ebotolaki Goma (ONU)


Members of the Congolese Red Cross and Civil Protection bury dozens of victims of the recent clashes in a cemetery in Goma on Feb. 4, 2025.
Members of the Congolese Red Cross and Civil Protection bury dozens of victims of the recent clashes in a cemetery in Goma on Feb. 4, 2025.

Koleka bato 2.900 bakuaki na bitumba biye bimemaki M23 na mampinga ma Rwanda kobotola engumba Goma na maboko mampina ma ekolo Congo démocratique, kolanda ONU.

“Kino sika, nzoto 2.000 esi ezwami na ba balabala ya Goma mikolo miye, mpe nzoto 900 ezali kino sika na ndako ya malili ya kobomba bibembe na mapitalo ma Goma,” elobi na likita lya bililingi, mokambi molandi ya misala mya kimya ya ONU na RDC (Monusco), Vivian van de Perre.

OCHA, Misala mya ONU mikambaka lisungi, milobaki yambo ete nzoto 900 nde ezwamaki.

Motango moye ya sika mosakolami ntango M23 na mampinga ma Rwanda bazongeli kosala bitumba nsima botelemisi basakolaki bango moko moko moleki.

M23 na RDF bazwi Nybibwe, mboka etonda makele, na etuka ya Sud-Kivu, na pene na 100 km na Bukavu mpe 70 km na libanda lya mpepo lya Kavumu.

“Yango etali ete botelemisi bitumba batomboki basakolaki ezali ya lokuta bo momesano,” elobi ministre mosakoli ya mbulamatari ya Ekolo Congo Democratique Patrick Muyaya.

Bitumba bizongeli ntango president Paul Kagame ya Rwanda na president Felix Tshisekedi basengeli kokutana na likita lya EAC, bikolo bya Afrika ya est, elongo na SADC, bikolo bya Afrika ya nse, o mokolo mwa mposo mokoya na Dar es Salam na Tanzanie.

Kasi o mokolo mwa mosala mitano, Conseil ya makoki ma bomoto esengeli kokuta mpo na bitumba na RDC.

Bikolo mingi bya etuka bizali kokebisa na bopanzani na bitumba.

Uganda eyikisi makasi mampinga ma yango kati na RDC mpo na komibatela batomboki mpe basimba manduki lokola ba ADF.

Burundi mpe lokola mpo ezali kofunda Rwanda koluka kobundisa yango.

Forum

XS
SM
MD
LG