Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jean-Marc Kabund abimisami boloko


Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019
Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019

Jean-Marc Kabund, mokambi ya kala ya UDPS/Tshisekedi, lingomba lya mokonzi ya mboka, abimaki boloko CPRK/Makala na mpokwa ya mokolo mwa mosala mitano mikolo miike nsima na mokano mwa ngolo ya president Felix Tshisekedi mosakolamaki o libandela lya mobu moye.

Akangamaka na sanza ya mwambe ya 2022 mpe akatalemaka mibu sambo ya misala ya makasi mpo na kofinga mokonzi mpe kopanza sango ya lokuta.

Mosambelei w aye, Me Kadi Diko alobi ezalaki ekateli elekaki makasi.

Mokambi ya kala ya Assemblée nationale, M. Kabunda akelaki lingomba lya ye lya politiki Alliance pour le changement nsima na kobengama na bayi UDPS/Tshisekedi.

Forum

XS
SM
MD
LG