Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Procureur ya CPI alobi RDC ekosengela kozala na "tribunal spécial"


Procureur ya CPI (Cour pénale internationale) Karim Khan (G) na mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (D) na Cité de l’Union africaine, Kinshasa, 25 sanza ya mibale 2025. (Facebook/Présidence RDC)
Procureur ya CPI (Cour pénale internationale) Karim Khan (G) na mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (D) na Cité de l’Union africaine, Kinshasa, 25 sanza ya mibale 2025. (Facebook/Présidence RDC)

Karim Khan, procureur ya CPI (Cour pénale internationale) andimi ete justice internationale (misala mya sembo mya molongo) epesi nzela te kosukisa bobomi boye bozali kosalama wuta koleka mibu ntuku misato na RDC.

Na biyango apesaki na AFP, M. Khan alobi azali kopesa maboko na likanisi lya Kinshasa ya kozala na tribunal spécial mpo na mbeba nyonso eye ezali kokoba kosalama na wuta mibu 30 sika.

Likita lya bayi molongo liye Kinshasa ebengisi na sanza ya minei ekoya mpo na kotala ntina ya "ntina ya mobulu moye bozali kozongelaka mbala mingi na est ekolo", likozala libaku lya bokeli "tribunal spécial moko mpo na ekolo eye, tokopesa yango maboko mpe lisalisi lisengeli", eyanoli M. Khan.

Alobi yango na mobembo asali na Kinshasa ntonga batomboki ba M23 baye bazwa mandoki wuta 2021 mpe bapesami maboko na mampinga ma Rwanda maye mazali na pene basoda 4.000 na mabele ma RDC bazali kokoba kozwa bisika mingi nsima na kobotola bingumba ya Goma na Bukavu.

Ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi ya RDC esakolaki o mokolo mwa mosala moko bosalami na sanza ya minei ekoya na Kinshasa "Likita lya molongo mpo na kimya, bokengi mpe sembo".

Bolukiluki mpe bosambi ya yambo boye CPI nsima na bokeli bwa yango na 2002 etalaki nde RDC mpe bato basato bakatelamaki etumbu mpo na mbeba bafundamaki kasi babimisaki nsima na mibu mingi.

Mpo na M. Karim ekozala kaka mpo na M23 te kasi mpo na mangomba manso mpe bato bamandoki banso bazali kobomaka na ngambo inso ya ekolo.

Forum

XS
SM
MD
LG