Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump na Zelensky bayokani te


President ya ekolo Amerika Donald Trump na president Volodymyr Zelensky bakutani na buera Oval na Maison lanche, Washington D.C., 28 sanza ya mibale 2025.
President ya ekolo Amerika Donald Trump na president Volodymyr Zelensky bakutani na buera Oval na Maison lanche, Washington D.C., 28 sanza ya mibale 2025.

Masolo kati na mokonzi ya Ekolo Amerika Donald Trump na Volodymyr Zelensky mokonzi ya Ukraine makatamaki na nzela o mokolo mwa mosala mitano na Maison Blanche na Washington D.C.

M. Zelensky abimaki na bozangi boyokani kati na ngambo ibale mpo etali bokaboli ya makele ma ntima mingi ya mabele ma Ukraine maye M. Trump azali kosenga na masolo ma bozongisi kimya na bitumba biye Russie ezali kosala na Ukraine.

“Namoni ete president Zelensky amibongisi nanu te mpo na kimya soki Amerika emikotisi, pamba te amoni ete bomikotisi bwa biso bopesi ye lttomba linene na masolo. Nalingi makambo masusu te, nalingi kimya,” esakoli president Trump na compte X na ye.

“Azangaki limemya na Ekolo Amerika na bureau na Oval na yango ya bolingo. Akoki kozonga ntango akomibongisa mpo na kimya,” ebakisi M. Trump.

Masolo kati na M. Zelensky na M Trump mpe na JD Vance (vice-président) mazalaki matata mpenza mpe malakisamaki na etando eke.

M. Zelensky aboyi kondima maloba ma M. Trump ete bingumba ba Ukraine bibebisami mpenza nsima na mibu misato ya bitumba.

Mokonzi ya Amerika abetaki sete ete alingi ete bakoma na boyokani.

“Azali Kosakana na bitumba bya molongo ya misato,” ekebisaki M. Trump na masolo na M. Zelensky mpe M. Vance asengaki M. Zelensky koyeba kopesa Matondo na Amerika mpo lisingu linso apesameli.

M. Zelensky na ngambo na ye akebisaki M. Trump na kondimela mokonzi ya Russie Vladimir Putin mpo atosa te boyokani basalaka kala mpo na kotelemisa bitumba.

“Napesi yo makoki ya kozala moto ya matata, okondima boyokani to tokobima (tokotika yo). Ozali na makoki te,” elobaki M. Trump.

M. Zelensky apamelaki M. Putin kobuka mbala 25 boyokani mpo na kimya.


Alobaki ete botelemi bitumba bokoki te kondimama soki elaka ya bokengi epesami te.

Mpo ye, Russie nde esengeli efuta misolo mpo yango ebandaki bitumba.

Forum

XS
SM
MD
LG