Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Assemblée nationale etie le 12 juin mpo na kopona moto akozwa esika ya Kabund ya 1er V-P


Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019
Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019

Moto akozwa ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale na esika ya Jean-Marc Kabund akoponama le 12 juin 2020, kolanda linaka Assemblée nationale ebimisi vendredi. Kasi UDPS, lingomba M. Kabund azali konamba lokola président intérimaire, lizali nanu kobendana.

"Boponami ya 1er vice-président na likita (séance plénière) ya le 12 juin 2020 kobanda 12 heures," ekomami na linaka ya Assemblée nationale.

Linaka lyango ebongisi ete ba députés babanda kopesa ba nkombo mpo libonga yango wuto le 6 kino le 8 juin.

Kasi UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) ya président Félix Tshisekedi ezali kobendana.

"Ezali linaka ya Assemblée nationale. Toyebi yango. Kasi biso tokoki te kokende na momekano wana soki tozwi ndingisa te ya mokambi na biso ya likolo. Mokambi na biso ya kilo, ezali mokonzi ya mboka oyo esengeli ayebisa biso soki esengeli tokende to te. Ye nde esengeli apesa ndingisa, Mokano mokowuta na ye. Ye nde akopesa biso nkombo," eyebisi na VOA Lingala mokambi ya lingomba ya parlementaires ya UDPS na Assemblée nationale Léon Mubikayi.

"Sik'oyo totie nyonso na alima. Mokonzi ya mboka nde akozwa mokano," ebakisi M. Mubikayi.

Le 28 mai, UDPS epekisaki ba députés banso kopesa nkombo na bango mpo na ebonga yango.

Liyebisi lyango litiamaki manzaka na secrétaire général ya UDPS, Augustin Kabuya, nsima na likita na biteni mingi ya bokambi lingomba.

M. Kabuya akomaki ete député nyonso aponamaki na liste ya parti, akomilongola soki apesi nkombo na ye. Nzokande, député nyonso aponama na liste ya parti songolo esengeli atika ebonga na ye na Assemblée nationale soki parti na ye elongoli ye.

Nsima na likita lya le 28 mai, UDPS epamelaki baninga babango ba FCC (Front commun pour le Congo) na kozala bilongi mibale.

Kasi mingi na UDPS bandimi te ete UDPS etika libonga wana ya 1er V-P ya Assemblée nationale pamba. Lokola André Mbata oyo asokalaki ete akutanaki na président Tshisekedi mpe asengaki ye ete UDPS ekangama te kaka mpo na moto moko. Mpo na professeur Mbata, esengeli kopona moto mosusu.

Mokambi Commission électorale ya UDPS, Jaquemain Shabany mpe alobaki yango.

Na ngambo esusu, M. Kabuya akebisaki ete boyokani kati CACH (Cap pour le changement) ya Félix Tshisekedi na FCC ya président ya kala Joseph Kabila bokotalama malamu soki esengeli kokoba.

M. Kabund akweyisamaki le 25 mai 2020 nsima na maponami malandaki pétition oyo Jean-Jacques Mamba ya MLC, lingomba ya Jean-Pierre Bemba, asalaki.

XS
SM
MD
LG