Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Chinois na Kinshasa mpo na kosunga na bitumba na COVID-19 ntango bakoni baki 1.102


Ambassadeur ya Chine na RDC Zhu Jing azali koyamba lipinga lya minganga ya ekolo Chine likomi na libanda lya mpepo ya N'Djili, Kinshasa, 12 mai 2020. (Twitter/Ambassade ya Chine na RDC)
Ambassadeur ya Chine na RDC Zhu Jing azali koyamba lipinga lya minganga ya ekolo Chine likomi na libanda lya mpepo ya N'Djili, Kinshasa, 12 mai 2020. (Twitter/Ambassade ya Chine na RDC)

Lipinga lya minganga mpe baye bayebi bokolongono malamu ya ekolo Chine likomi na Kinshasa mpo na kosunga misala ya bitumba na COVID-19. Bakomi na RDC ntango motango mwa bato bazwami na bokono boye bokomi 1.102.

Ba experts baye bakosala na bayi mboka ekolo Congo démocratique baye bakambamaka na Dr. Jean-Jacques Muyembe.

Bato baye bakomi na Kinshasa mpo na kokabola boyebi mpe makoki na bango na baye ya Kinshasa, elobi ambassadeur ya Chine na RDC, Zhu Jing. Babakisami na bamosusu baye bazalaki wuto mwa ntango na Kinshasa.

Ambassade ya Chine eyebisi ete bakosala mposo mibale na Kinshasa. Bamemi mpe mwa lisungi.

Bato baye kozwama na COVID-19 na RDC bakomi 1.102, kolanda bulletin ya secrétariat technique ya bitumba na bokono boye.

Na Kinshasa, motango na bango mokomi 1.032.

Kongo central ekomi na bango 45.

Haut-Katanga etikali na bango kaka zomi.

Nord-Kivu, mwambe. Sud-Kivu, minei. Ituri, 2. Kwilu, 1.

COVID-19 ebandaki na Chine na mboka Wuhan wuto sanza ya novembre. Kasi bayi Chine bayebaki kokitisa motango na yango ata bato mingi bakufaki.

XS
SM
MD
LG