Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba FARDC babomi ba Ngumino sambo pene na Minembwe


Mampinga ya FARDC na Kididiwe, nsima na kobotola esika eye na ba ADF, na Beni, Nord-Kivu, 12 novembre 2019. (Twitter/FARDC)
Mampinga ya FARDC na Kididiwe, nsima na kobotola esika eye na ba ADF, na Beni, Nord-Kivu, 12 novembre 2019. (Twitter/FARDC)

Mampinga ya ekolo Congo démocratique basakoli ete babobmi ba basimba minduki ya Ngumino pene na mboka mibale nzinganzinga na Minembwe, epayi wapi matata mazali kongala.

"Lingomba ya basimba minduki (Maï Maï) Ngumino babundisaki le 19 novembre bisika ba FARDC bazalaki na mboka Rusankulu mpe Kananda, na koleka 50 kms na nord ya Minembwe, na territoire ya Fizi, eyebisi na AFP capitaine Dieudonné Kasereka, molobeli ya mampinga na Sud-Kivu.

Kolanda maloba ya cap. Kasereka, ba FARDC babenganaki babundi baye.

"Nzoto sambo ya basimba minduki emonisaki," elobi cap. Kasereka.

Mokambi ya commune rurale ya Minembwe, Gadi Mukiza andimi likambo yango kasi apesi sango esusu te.

Na Minembwe mpe na Hauts plateaux, ba Babanyamulenge na kabila esusu lokola ba Bafulero, ba Bembe, ba Nyindu bazali na matata mpo na mabele.

Monusco elobi ete na sanza ya zomi, bitumba 90 bisalama mpe bitindaki bato ebele kokima bisika na bango.

O’mokolo ya yambo, bayike ya ba Banyamulenge batambolaki o’balala na Washington, na Etats-Unis, mpo na kopamela bitumba mpe bobomami na bango na ba Maï Maï.

XS
SM
MD
LG