Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Léopards bakaboli 1-1 na ba Ecureils ya Bénin


Dieumerci Mbokani, mosani ya ba Léopards na match na Côte d'Ivoire na Oyem, Côte d'Ivoire, 20 janvier 2017.
Dieumerci Mbokani, mosani ya ba Léopards na match na Côte d'Ivoire na Oyem, Côte d'Ivoire, 20 janvier 2017.

Ba Léopards ya Ekolo Congo démocratique na ba Ecureils ya Bénin bakabwani mongete moko ngambo inso na match ya mokolo ya mibale ya ba élimintoires ya Coupe du Monde Qatar 2022, mwa ngonga eleki na Cotonou

Dieumerci Mbokani atiaki mongete ya yambo mpo na ba Léopards na 11e minute mpe Jordan Adeoti azongisaki na 33e minutes mpo na ba Ecrureils.

Na bokambami ya coach na bango moyi Argentine Hector Cuper, ba Léopards bakokaki te kobatela avance na bango.

Na kokabolaka mongee moko na ba Ecureils, ba Léopards batiki bongo Bénin elaka na molongo ya yambo na classement provisoire ya deuxième journée.

Na match ya mokolo mwa yambo mposo moleki, ba Léopards bakabolaki mpe mongete moko na Tanzanie.

Ba Léopards bazali sika na molongo ya mibale na bilembo mibale nsima na ba Ecureils baye bakomi na bilembo minei.

XS
SM
MD
LG