Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Baike ya opposition baboyi elonga ya Sassou mpe balaki kokende na bazuzi


Président Denis Sassou N'Guesso nsima bosakolami ya elonga na ye na maponami ya mokonzi ya mboka na ministre ya Intérieur mpe Décentralisation na Brazzaville, 23 mars 2021.
Président Denis Sassou N'Guesso nsima bosakolami ya elonga na ye na maponami ya mokonzi ya mboka na ministre ya Intérieur mpe Décentralisation na Brazzaville, 23 mars 2021.

Baike na opposition baboyi elonga ya président Denis Sassou N’guessou na ngala ya yambo na 88,57% na maponami ma mokonzi ya mboka ya Congo-Brazzaville. Balaki kokende na bazuzi ba Cour constitutionnelle.

Bilembo byango bisakolamaki mardi na mpokwa na télévision ya l’Etat, na ministre ya mambi makati ya mboka mpe Décentralisation, Raymond Zéphirin Mboulou.

Matthias Nzon, mokambi ya UPRN (Union patriotique pour le renouveau national), lingomba ya opposition mpe moko na bato sambo bazalaki kowela maponami mang. alaki kokende na Cour constitutionnelle eye esengeli endima bilembo bya maponami mango yambo etikela libela.

"Ezali te na mokolo nde bakoki kosangina bilembo biwutaki na Congo mobimba. Eloko moko ezali kokamwisa : kati na bilembo mingi, molongo ya ba candidats molandi lolenge yango ezali na bulletin to nkasa ya maponami. Elakisi ete ezali likambo libongisamaki wuta kala," elobi M. Ndonz, kolanda Congo Media Time.

M. Nzon abimi moto ya misato na 1,9% nsima na M. Sassou (molongi na 88,57%) na Guy-Brice Parfait Kolelas na 7,8%. M. Nzon alaki kokende na ba zuzi ya Cour constitutionnelle o ;mokolo mwa minei le 25 mars.

Guy-Brice Parfait Kolelas akufaki na butu nsima na maponami.

"Nalingi nayeba soki baselelaki nini, Bayebisaki biso ete biométrie ezali te, tozali na technologie yango te, kasi ndenge bakeyi mbangu boye? Nakamwe. Eza malamu te. Esengeli ete bilembo binso bimemama yambo na Brazzaville. Eza molili mingi," elobi na ngambo na ye Jean Serge Yhombi Opango, mokambi ya RDD (Rassemblement pour la démocratie et le déceloppement) oyo apesaki maboko na M. Kolelas.

Mokambi ya CNEI (misala mya maponami), Henri Bouka alimboli ete bilembo bisakolamaki te kaka nsima na bokangami ya ba bureaux ya vote kasi manso masalamaki malamu mpo ete bilembo bya bisika binso kipesama, kolanda Congo Media Time.

Mokambi ya campagne ya M. Sassou, Anatole Collinet Makosso, akanisi ete mbulamatari ezali na makoki maye mapesi nzela ya kokomisa bilembo na lombango mpenza.

XS
SM
MD
LG