Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Burundi

Bato babale bakufi na bobeti grenade moko na Gitega

Bayi police bapanzani o'balabala nsima na mobulu, na Bujumbura, Burundi, 4 mai 2015.
Bayi police bapanzani o'balabala nsima na mobulu, na Bujumbura, Burundi, 4 mai 2015.

Bato babale bakufi mpe mwambe bazoki na grenade moko ebetaki na butu ya mokolo mwa eyenga na ekala moko na Gitega, engumba mokonzi ya Burundi. Mikolo mibale mileki, batomboki ba RED-Tabara balobaki ete babetaki ba obus na libanda lya mpepo na Bujumbura.

"Bobeti grenade bwango bosali mbeba mingi, bato babale bakufi, nzokande mwambe basusu bazokaki mpe bazali kozwa lisalisi na mapitalo maike na Gitega," elobi na AFP moyi police moko.

Moto mosusu ya misala mya bokengi alobi ete ekala yango ezali ya officier moko ya police mpe bakambi baike mpe bayi lingomba lya potiki na bokonzi bazali na esika yango.

Bazeneke baike mpe balobi ete bato mingi bazokaki.

O’mokolo mwa mposo, batomboki ba RED-Tabara basakolaki ete bango nde babetaki ba obus mingi na libanda lya mpepo mpe babetanaki masasi na mampinga.

Ezalaki yambo na président Evariste Nadyishimiye azwa mpepo mpo na mobembo mwa ye na Likita linene lya ONU na New York.

Babundi mingi ya RED-Tabara babombamaka na Sud-Kivu, na RDC, wuto lingomba na bango ekelama mibu zomi mileki.

Bafundamaka na bitumba mingi na mboka na bango.

See all News Updates of the Day

SML: Eyano ya boko na bilenge ya Bandundu na mbela ya kokota na mampinga

SML: Eyano ya boko na bilenge ya Bandundu na mbela ya kokota na mampinga
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

SML: SADC esengi bokoti na nzela ya mikano ya bokutani ya SADC-EAC mpo na kimya na RDC

SML: SADC esengi bokoti na nzela ya mikano ya bokutani ya SADC-EAC mpo na kimya na RDC
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

SML: M23 ezwi mboka Rurambo mpe Kigarama ya Bafulero na Uvira, na Sud-Kivu

SML: M23 ezwi mboka Rurambo mpe Kigarama ya Bafulero na Uvira, na Sud-Kivu
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

SML: SADC esukisi etinda ya mampinga ma yango na RDC

SML: SADC esukisi etinda ya mampinga ma yango na RDC
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

Sango ya Mokili Lelo: Kinshasa ezali kolendisa FARDC na ba Wazalendo mpo babunda na Uvira

Sango ya Mokili Lelo: Kinshasa ezali kolendisa FARDC na ba Wazalendo mpo babunda na Uvira
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:29:59 0:00

Voir plus

XS
SM
MD
LG