Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato batamboli na nkanda na moto ya elenge mwasi bakataki na Bunia


Bavandi ya Bunia batamboli na moto ya elenge mwasi moko abomamaki na basimba minduki, Itrui, 18 juillet 2019. (Bilili ya Twitter/Maire John Tibasana)
Bavandi ya Bunia batamboli na moto ya elenge mwasi moko abomamaki na basimba minduki, Itrui, 18 juillet 2019. (Bilili ya Twitter/Maire John Tibasana)

Bavandi ya Bunia, engumba mokonzi ya Ituri, batambolaki na moto ya elenge mwasi moko mpo na kotelemela bobomi na bato bozali kongala na etuka eye.

Botambali na bango bosalami nsima na liwa na bato mwambe baye bakatanaki mito na baye bakanisami ete bazali basimba minduki, elobi banzeneneke.

Bavandi ya Bunia balikangaki komema moto ya elenge mwasi moye na bureau ya bakonzi kasi police ebenganaki bango na kobetaka gaz lacrymogène na masasi likolo, eyebisi na AFP mopanzi ya kala Luc Malembe.

Police endimi na liyebisi ete bato mitano baye bamonisami lokola bango nde babomaki bato baye bakangami. Kati na bato baye, babale bazokaki, eyebisi police.

Milukiluki mizali kosalema mpo na kozuwa babomi banso, kolanda liyebisi ya police ya RDC.

“Nzoto esato emonanaki na ntongo ya mokolo ya minei, mito na yango mikama na makwangola,“ esakoli mokambi ya etando (territoire) ya Irumu.

"Babomi baye bawutaki na etando ya Djugu mpo na kotiya nsomo awa.. kasi mapinga mazali kolanda banguna baye,“ eyebisi molobeli ya mapinga ya FARDC na Ituri, lieutenant Jules Tshikudi.

Président Félix Tshisekedi akitaki na Ituri le 1er juillet mpo na koluka kimya. Apamelaki basimba minduki koluka kosala “génocide“ to koboma kabila nzike na esika eye.

XS
SM
MD
LG