Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alobi Trump akoki te na bokonzi mpe soki parlement ekokweyisa ye etali kaka yango


Washington, Capitole,. Joe Biden (na nse na G.) na Donald Trump (D)
Washington, Capitole,. Joe Biden (na nse na G.) na Donald Trump (D)

President elect Joe Biden ayanoli na bapanzi sango ete soki parlement ekolongola Donald Trump yambo na milulu mya bolapi ndayi etali kaka yango. M. Biden akolapa ndayi le 20 janvier mpo na akota na bokonzi, etikali mikolo 12.

M. Biden asengamaki kopesa makanisi ma ye mpo na lolenge bakeli mibeko babandi kobongisa misala mya kokweyisa M. Trump na mikolo 12 mitakali mpo na mokonzi abimi na maponami akota na bokonzi.

"Nalobaki wuto libandela ete Donald Trump abongi te na ebonga ya mokonzi. Soki bakeli mibeko bakolongolo ye etali kaka bango. Nga nazo bongisama ndenge nini nakobanda mosala na nga," eyamoli mbala mingi M. Biden.

Nancy Pelosi, mokambi ya ndako ya bakeli mibeko asengaki jeudi ma vice-président Mike Pence kosalela 25e ammendement ya Buku lukonzi mpo na koloba ete M. Trump akoki ten a ebonga.

Ezalaki nsima na balandi ba M. Trump kosala eyoma na Capitole mpo na kopekisa Congrès kondima elonga ya M. Biden na maponami. Bato banei bakufaki.

25e ammendement epesi nzela ya kolongola mokonzi ya mboka soki akoki lisusu te mpo na nkwoko ya nzoto mpe ya mayele to mpe mpo na koteka mboka.

Soki M. Trump akwei, M. Pence nde akokoma mokonzi ya mboka mpo na mikolo mitikali kino mokonzi ya sika azwa bokonzi.

"Vice-président Pence toko yamba ye malamu," elobi M. Biden.

M. Pence azali républicain lokola M. Trump mpe aponamaki na ebonga na ye na nkasa ya M. Trump na 2016.

M. Pence akambai milu mya Congrès mya kondima elonga ya Biden ndenge mobeko motindi. Bo' vice-président apamelaki M. Trump na eyoma wana.

Mwa ngonga yambo na yango, vendredi, M. Trump asakolaki ete akozala te le 20 janvier na milulu ya ndayi ya M. Biden.

"Ezali malamu soki aye te. Azali motungisi mpe nsoni ya mboka," elobi M. Biden.

XS
SM
MD
LG