Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Boponi ya Baponi banene bondimisi elonga ya Joe Biden


Président elect Joe Biden (D) na président Donald Trump (G) na bilili ya kosangisa, 22 octobre 2020.
Président elect Joe Biden (D) na président Donald Trump (G) na bilili ya kosangisa, 22 octobre 2020.

Collège électoral to liboke lya Baponi banene endimisi elonga ya Joe Biden nsima na maponami ma lundi.

Baponi banene baponaki lundi 14 décembre lokola mobeko mozali kosenga.

Maponami ma le 3 novembre mazalaki maye ma bato banso baye baponaki nde Baponi banene.

Joe Biden, démocrate ya mibu 78, azalaki vice-président mbala mibale président Barack Obama azalaki na bokonzi (2009-2013) mpe (2013-2014),

Maponami ma le 3 novembre mamonisaki ete M. Bidem aponamaki na 306 baponami banene na 232 mpo na président Donald Trump.

M. Trump, républicain, mibu 74, aboyaki elonga yango na kolobaka ete mbeba mpe moyibi esalamaki.

Bazuzi bakweyisi bosenga yango na bisika mingi mpo na bozangi bilembo bya mbeba mpe moyibi M. Trump azali kofunda.

XS
SM
MD
LG