Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eddy Kapend na basusu bazali na mikano ya ngolu Tshisekedi azwi


Eddy Kapend moko na baye baketelamaki etumbu ya liwa mpo kufa ya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila, tata na président ya kala Joseph Kabil, na Kinshasa, 16 janvier 2001.
Eddy Kapend moko na baye baketelamaki etumbu ya liwa mpo kufa ya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila, tata na président ya kala Joseph Kabil, na Kinshasa, 16 janvier 2001.

Président Félix Tshisekedi asakoli mikano mya ngolu mpo na bato baboloko. Ngolu ya epesami te na bato basalaki mbeba makasi kasi mokano ya président Tshisekedi endimi kokitisa etumbu ya baye bakangama mpo na liwa ya Laurent-Désiré Kabila.

Mikano myango mizwami “ppo na kolakisa elembo ya bomoto, bolimbisi mpe bosembo; mibu tuku motoba ya lipanda,” ekomami na mokano président Tshisekedi atie manzaka na mokolo mwa le 30 juin 2020 VOA Lingala emonaki.

Kolanda mikano myango, bato banso batikalaki na mibu mitano mya misala makasi to na nse ya mibu mitano, balimbisami.

Mokano mosusu ezali ete etumbu ya misala makasi mpo na basusu elongolami mibu mitano mpo baye batikali.

Nzonkande etumbu ya liwa ebongwami ebonwami na ya boloko ya libela mpo na bato bato bakangama.

Etumbu ee ya baye bazwaki boloko ya libela ekomi ya misala makasi mya mibu mibu 20.

Mokano to ordoannce ya président Tshisekedi elimboli ete ngolu yango etali te baye bakima to babatama, baye bazali na etumbu mpo na mbeba ya bomoto lokola kozwa basi na makasi, koboma, koyiba misolo mya l’Etata mpe misusu.

Kasi bato baye bakatelamaki etumbu na bosambisa ya Cour militaire le 7 janvier 2003 (mpo na liwa lya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila bango mpe bazwi ngolu.

Kati na bango colonel Eddy Kapend oyo akokisi mibu 19 na boloko na etumbu ya liwa mpo na kufa ya LD Kabila.

Kolanda bato bazali nzinganziga na mokonzi ya kala, Joseph Kabila, oyo akinaki na Laure-Désiré, tata wa ye, libota lya M. Kapend ekoma mokanda mpo na kosenga mawa.

"Mibu bato lokola Eddy Kapend basali na boloko mikolongolama na etumbu na bango ya kala," elobi moko na basungi ya Joseph Kabila.

Président Tshisekedi na mokonzi ya kala bandimaki yango. Président Tshisekedi akoyeba nsima kozwa mikno misusu ya ngolu na kotala mibu bato baye basali na boloko.

XS
SM
MD
LG