Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis, France, Canada, Royaume-Uni na bikolo misusu basengi ngambo inso ezala na CENI ya RDC


Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.
Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.

Etats-Unis na bikolo ya molongo biike basengi bakonzi ya Ekolo Congo démocraique koluka bokoti ya bato banso basengeli na misala mya CENI mpo maponami masalama malamu na 2023.

Ba ntoma ya bikolo biye batie manzaka na liyebisi babimisi mpo na yango.

Etats-Unis, Allemagne, Belgique, Canada, Corée du Nord, Espagne, France, Grece, Italie, Japon Norvege, Pays-Bas, Portugal, Royaume Unie, Suède, Suisse, Tchéquie, mpe Union européenne batie manzaka na liyebisi lyango.

Basengi bokotisami ya ngambo inso na misala mya CENI.

"Mpo na yango, bitapi bya motuya bikoya bikozala na mobeko ya maponami (loi électorale) moye mosengeli koyikisa makasi misala mya kokengela mpe ya pole, botiami ya solo ya processus ya identification mpe ya bokomisi ya baponi, lokola mpe botiami ya budget esengeli mpe, na linaka lya maponami likotosa ntango ya maponami," ekomi ba ntoma baye.

Etats-Unis na bikolo misusu ya Union europeenne, Canada mpe bikolo misusu balobi basepeli te ndenge ngambo inso ezangi boyokani na boboponi makmabi ya CENI.

Bikolo biye bilaki lisungi na mbulamatari mpe botali ya maponami ma 2023.

Liyebisi lya bango libimi ntango mokambi ya sika ya CENI Denis Kadima na bato basusu zomi na moko balapi ndayi na Cour constitutionelle mpo kobanda mosala.

Kasi nungu nungu ezali mingi mingi kati na bakambi ba eyamba ya katoliko mpe misioni baye baboyi M. Kadima na koloba ete boponami bwa ye bosalamaki na bozangi boyokani ya biyamba binso.

Kasi bakambi motoba ya biyamba misusu bango nde bandimi M. Kadima.

Opposition mpe eboyi ye, eboyi mpe kotinda bato ba yango na CENI mpe mabango masota ma opposition matikali polele na Bureau ya misala mya kobongisa maponami.

XS
SM
MD
LG