Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabila azali komilengela mpo na kozongela politique, (Emmanuel Ramazani) 


Emmanuel Ramazani Shadari, secrétaire permanent ya PPRD, kati ya ya Henri Mova (D) na Evariste Boshab (G) na bokutani na Lubumbashi, Haut-Katanga, 22 octobre 2019. (Facebook/PPRD)
Emmanuel Ramazani Shadari, secrétaire permanent ya PPRD, kati ya ya Henri Mova (D) na Evariste Boshab (G) na bokutani na Lubumbashi, Haut-Katanga, 22 octobre 2019. (Facebook/PPRD)

Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC, akozongela misala ya politque kala mingi te, eyebisi na bofungolami ya matinée politique ya PPRD na Lubumbashi, na Haut-Katanga, Secrétaire permanent ya lingomba liye, Emmanuel Ramzany Shadari.

"Nazali na esengo mpe lokumu ya koyebisa bino ete mokonzi na biso Joseph Kabila Kabange akani kozongela politique na mikolo mikoya nsima na mwa ntango ya bopemi mpe congé oyo esengelaki azwa," esakoli M. Ramazani.

Kalaka mokambi ya PPRD alobi te mokolo nini bozongi yango bokosalema kasi asengi na baye ya lingomba lya ye komibongisa malamu mpe milulu miango.

Motambwisi ya PPRD alobi lisusu na balandi na bango ete mbano ya lingomba eye ezali kolonga maponami ya mokonzi ya mboka na 2023. Makasi na bango ezali kozonga na ebonga na mokonzi ya mboka, ebeti mokoloto M. Ramazani.

Bokutani boye bozali mpo na komanyola epayi nini PPRD ekomi na botamboli na boyokani ya bokambi mboka kati na FCC elongo na CACH, ya président Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG