Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame, Sassou, Lourenço na Touadera basengi ete bato bazali kosala mobulu na RCA batindama na bazuzi


Sassou, Kagame, Lourenço na Touadera basengi Bozise ba batombi kotika bitumba na Centrafrique
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:56 0:00

Sassou, Kagame, Lourenço na Touadera basengi Bozise ba batombi kotika bitumba na Centrafrique

Ba présidents Faustin Archange-Toudera ya RCA (République centrafricaine), Denis Sassou ya Congo-Brazzaville, Paul Kagame ya Rwanda na Joâo Lourenço ya Angola mpe mokambi ya CIRGL, bakutanaki na Luanda mpo na kotali maye matali bokengi na RCA.

Bakonzi ba bikolo biike bya CIRGL (Conférence internationale ya etuka ya Grands lacs) basengi nsima na bokutani na Luanda (Angola), ete baye bazali kosala mobulu na RCA batindama na bazuzi.

Ba présidents Faustin Archange-Toudera ya RCA (République centrafricaine), Denis Sassou ya Congo-Brazzaville, Paul Kagame ya Rwanda na Joâo Lourenço ya Angola mpe mokambi ya CIRGL, bakutanaki na Luanda mpo na kotali maye matali bokengi na RCA.

Balobi ete bato baye bazali kokuba droit intenational humanitaire mpe droit humains to makoki na RCA bayeba kotindama na misala mya bosembo.

Bapameli lisusu bitumba lingomba lya batomboki CPC ( Coalition des patriotes pour le changement ) ekambami na mokonzi ya kala ya RCA François Bozize lizali kosala mpo na koluka kokweyisa bokonzi na mboka na ye.

Kasi basengi ete boyakani APPRCA (Accord politique pour la paix et la réconciliation en République centrafricaine) botosama.

Bitumba byango biyaki makasi mikolo mike yambo na maponami ma janvier eleki président Touadera alongaki.

Nkombo ya M. Bozize eboyamaki na maponami yango.

Bakonzi ba ye balaki kokoba kosala na RCA mpo kopesa yango makasi ya kobatela ndelo na yango na boyokani na mboka nzinga nzinga.

Bakonzi baye bapesaki mpe losako na molimo mwa président ya Tchad maréchal Idriss Deby oyo akufi na masasi na bitumba na batomboki na mboka na ye.

XS
SM
MD
LG