Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koffi Olomide awangani kozwa babini ba ye na makasi na bosambisami bwa ye na Versailles


Moyembi Koffi Olomide na Festival ya musique urbaine ya Anoumabo na Abidjan, Côte d'Ivoire, 21 septembre 2021. (Photo by Sia KAMBOU / AFP)
Moyembi Koffi Olomide na Festival ya musique urbaine ya Anoumabo na Abidjan, Côte d'Ivoire, 21 septembre 2021. (Photo by Sia KAMBOU / AFP)

Alanga nzembo Koffi Olomide, Antoine Agbepa Mumba awangani kozwa babini baye ba ye makasi na kosamba na ye lundi na Cour d’Appel ya Versailles pene na Paris, na France.

Na mibu ntuku motoba na mitano, Koffi Olomide ayanolaki nde ye moko mbala ya liboso na bazuzi.

Na 2019, azalaki te na bosambisami bwa ye. Aketelamaki etumbu ya mibu mibale ya boloko na sursis.

Na 2019, mokeli mindule ya Tchacho afundamaki na kozwa na makasi mobini na ye oyo azalaki ntango wana mwana moke to mineure.

Atikamaki mpo na bofundami yango.

Koffi Olomide afundamaki lisusu na kokangela babini na ndako mpe kopekisa bango kobima na libanda.

Ndako ya miziki ya La Défense Arena, mpembeni ya Paris, na France, elobaki jeudi ete elongoli concert oyo Koffi Olomide alingaki asala le 27 novembre.

Bato babale basusu bazali pe kosamba na ye.

XS
SM
MD
LG