Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato zomi bakufi na likama ya mayi na Kasaï


Bato bayike pene na mayi ya Kasaï, na Tshikapa, 26 juillet 2017
Bato bayike pene na mayi ya Kasaï, na Tshikapa, 26 juillet 2017

Nzoto ya bawei zomi ezwami na mayi Lumbembe, na etuka ya Kasaï, elobi bakambi ya police. Likama lyango lisalamaki lundi na mboka Nsumbula, na 140 km ya Tshikapa.

"Baleinière moko ezindaki o’mokolo mwa yambo mpe ememaki liwa ya bato koleka zomi mpe mingi misusu bazali komonana te," elobi na AFP mokambi ya Kasaï, Dieudonné Pieme.

Commandant ya police ya mboka Nsumbula, capitaine Franck Mbuta, ayebisi ete bolukiluki bozali kokoba.

"Tosili kozwa nzoto zomi na mati kasi lokolo mayi emati makasi, tokanisi tokozwa ata moto mosusu te na bomoi," esakoli cap. Mbuta na AFP.

Baleinière yango emami koloka bato 20 na biloko mingi koleka, eyebisi na ngambo na ye mokambi ya société civile, Edmond Tshipamba.

Makama ya bwato masalamaka mingi na RDC mpo bato mingi basalaka mibembo ya mombongo na mayi lokola nzela mingi ebeba.

XS
SM
MD
LG