Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mabunda abiki na likama lya motuka


Mokambi ya a Assemblée nationale Jeanine Mabunda, na bokutani na président Félix Tshisekedi (amonani te) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 13 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Mokambi ya a Assemblée nationale Jeanine Mabunda, na bokutani na président Félix Tshisekedi (amonani te) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 13 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda asali likama lya motuka na Kinshasa. Motuka mosusu etukaki eye ye azalaki na kati.

Basungi ba Jeanine Mabunda balobi azali malamu mpe akeyi mpo ete minganga batala ye.

"Jeanine Mabunda azali kotalama na lopitalo moko. Longola mwa mpota mike mpe moto mpasi, mokambi (ya Assemblée nationale) azali malamu," ekomi Bureau ya Assemblée nationale na liyebisi.

Nzokande Conseil d’Etat esengeli epesa ekateli na yango o’mokolo mwa mitano mokoya na bosambisa mokeli mobeko Alebrt Fabrice Puela asengaki bolongwi ya Jeanine Mabunda na bureau ya Assemblee nationale mpo na kopesa rapport na bango nsima na ntango.

Bayi PPRD, lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila liye Jeanine Mabunda azwami na kati, bapameli makambo manso mazali kosala mpo koluka kokweyisa Jeanine Mabunda.

XS
SM
MD
LG