Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mabunda akweyisami nsima na maponami


Jeanine Mabunda mokambi ya Assemblée nationale akweyisami na ebonga na ye na maponami na Assemblée na Palais du Peuple, Kinshasa, 10 décembre 2020.
Jeanine Mabunda mokambi ya Assemblée nationale akweyisami na ebonga na ye na maponami na Assemblée na Palais du Peuple, Kinshasa, 10 décembre 2020.

Motambwisi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda akweyisami nsima na maponami masali na suku na nse ya ndako ya bokeli mibeko.

Bakeli mibeko 483 batiaki nkasa na bango na maponami mango. 281 bandimi ete Mme Mabunda alongwa. 200 nde baponi ete atikala. Nkasa moko ezalaki mabe mpe moko ya moto amipekisi kopona ngambo moko.

Maponami mango masala kasi na matata mazali kati na mboka mpe nsima na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi kosakola bokabwani ya CACH (lingomba na ye) na FCC (ya mokonzi ya kala Joseph Kabila).

CACH na FCC bazalaki na boyokani ya bokambi mboka nsima na maponami ma le 30 décembre 2018.

Bokweyisami bwa ye bokopesa nzela na kopona motambwisi mosusu ya Assemblée nationale mpe akoki kowuta na ngambo mosusu.

Yango ekolakisa ete majorité ya sika to lingomba lya bato baleki na bakeli mibeko mosusu ekoki komonisa.

Bato baike bayonalaki na mbela ya mokonzi mboka Félix Tshisekedi ya kokela majorité ya sika.

Mingi batiki FCC, lingomba ya mokonzi ya kala Kabila mpo na kokende na Union sacrée.

Président Tshisekedi asakolaki suka ya libala ya CACH-FCC nsima na mibu mibale.

M. Tshisekedi alongaki maponami ma mokonzi ya mboka na 2018 kasi andimaki kosala na mbulamatari elongo na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila eye ezwaki bakeli mibeko mingi koleka.

Mokonzi ya mboka Tshisekedi alobaki ete majorité to lingomba lya bato baleki na bakeli mibeko mingi epanzanaki mpe azali koluka lingomba lya lisusu likotambola na ye.

M. Tshisekedi ayokaki bato mposo misatu mpe alobi mingi balingaki bokabwani boye.

M. Tshisekedi apamelaki FCC kotiela ye mabaku mpe kopekisa mboka kokende liboso.

Matata mazalaki makasi. Bayi FCC batelemelaki mokonzi mboka na kotia bazuzi ba Cour Constitutionnelle.

XS
SM
MD
LG