Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya diplomatie ya France azelami na Kinshasa le 20 mai


(Banda gauche ti droite) Ba présidents Emmanuel Macron ya France, Uhuru Kenyatta ya Kenya mpe Félix Tshisekedi ya RDC na bokutani na Nairobi, Kenya, 14 mars 2019.
(Banda gauche ti droite) Ba présidents Emmanuel Macron ya France, Uhuru Kenyatta ya Kenya mpe Félix Tshisekedi ya RDC na bokutani na Nairobi, Kenya, 14 mars 2019.

Président Félix Tshisekedi akoyamba ministre ya mambi ya bapaya ya ekolo France, Jean-Yves Le Drian o’mokolo ya le 20 mai, eyebisi nzinganzgina ya mokambi ya diplomatie ya mboka mona.

M. Le Drian "akosakola bomipesi ya France… na transition na RDC mpe na mokonzi aponami na janvier," elobi baye nzinganzinga ya ministre ya mambi ya bapaya ya France.

Nzokande M. Le Drian abengaki boponami ya M. Tshisekedi "boyokani ya lolenge ya bana Afrika".

Boyambami na ye bokosalama nsima na bokutani mpe masolo ya président Emmanuel Macron ya France na M. Tshisekedi na mars na Nairobi.

Mokonzi ya sika ya RDC azali kozongisa boyakani na bikolo bisusu. Mardi, ayambi lipinga moko ya Belgique mpe vendredi, ya Rwanda.

XS
SM
MD
LG