Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nzoto 60 ezwami nsima na bozindi ya baleinière moko na lac Mai Ndombe


Bato batondi na baleinière elongwe Kinshasa mpo na kokende Bandundu na ebale ya Congo, le 9 mai 2000.
Bato batondi na baleinière elongwe Kinshasa mpo na kokende Bandundu na ebale ya Congo, le 9 mai 2000.

Nzoto ya bato 60 ezwamaki lokola mpe bato nkamo misato baye babiki na etima Mai Ndombe lobi nsima na bozindi ya baleinière moko butu ya eyenga na mokolo mwa yambo.

Baleiniere yango emenaki basali mibembo pene na nkama sambo. Bato mingi bamonani nanu te.

"Baleinière moko emamaki kilo koleka, ezalaki kosala mobembo na basali mibembo koleka 700 ezindaki na Maindombe," ekomi ministre ya mambi ma Lisungi, Steve Mbikayi na compte Twitter na ye.

"Nzoto 60 esi ezami na bato 200 baye babiki! Tokaboli mawa na mabota mazwi mpasi mpe tozali kosenga etumbu likolo lya bato banso bazali na mokumba basali mbeba na misala mya transports," ebakisi ministre Mbikayi.

Makama mingi masalamaka na bibale mpe mayi ya RDC.

Nzela ya mabele ezalaka malonga te mpe mpepo ntalo koleka mpo na baike.

Bato baike basalaka mibembo na nzela ya mayi kasi na bwato (mato) elekisa ndelo ya motango ya bato mpe biloko ekoki komema.

Baleinière tango elongwaki Kinshasa mpo na kokende na Equateur.

XS
SM
MD
LG