Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Police etindiki baye ya Lamuka liboso ya Cour constitutionnelle


Police ezali kopusa baye ya Lamuka na botelemeli na bango liboso ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 13 juin 2019.
Police ezali kopusa baye ya Lamuka na botelemeli na bango liboso ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 13 juin 2019.

Mwa matata mozali liboso ya Cour constitutionnelle esika wapi baye ya lingomba Lamuka bazali kotelemela bolongoli ya ba députés na bango.

Baye ya Lumuka batumbi ba pneus na nzela. Kasi police ezali kopusa bango kokende mosika ya Cour constitutionnelle.

Baye ya Lamuka batambolaki na ntongo mpe basalaki Sit-in to mpe botelemi liboso ya Cour constituionnelle yambo police ebanda kobengana bango.

Ba botingami noye, mwasi moko azoki na moto ya pneus.

Lelo ezali bongo mokolo ya mibale ya botelemeli boye Martin Fayulu, moko na bakambi ya lingomba liye, asakolaki lobi lolebi.

Tonkundola ete Martin Fayulu asengaki ba Parlementaires banso ya lingomba na ye kotika mosala kino miko ya sika mikopesama mpe abengaki bana ya Congo démocratique banso kotelemela o’mokolo ya le 30 juin.

XS
SM
MD
LG