Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC ezali candidate ya komeka mangwele ya COVID-19 (Dr. Muyembe)


Dr Jean-Jacques Muyembe-Tamfum ya Congo démocratique azwi mbando ya edition ya misato ya Hideyo Noguch Africa na maboko ya Premier ministre ya Japon Shinzo Abe, na Tokyo, Japon, 30 août 2019.
Dr Jean-Jacques Muyembe-Tamfum ya Congo démocratique azwi mbando ya edition ya misato ya Hideyo Noguch Africa na maboko ya Premier ministre ya Japon Shinzo Abe, na Tokyo, Japon, 30 août 2019.

Dr, Jean-Jacques Muyembe andimi ete RDC ezali candidat ya komeka mangwele ya coronavirus ya sika, COVID-19.

Mokambi ya cellule technique ya bitumba na COVID-19 apesaki eyano yango liboso ya bapanzi sango vendredi na Kinshasa.

"Komeka mangwele yango ekoki kasalama na kanisi na sanza ya mitano. (Biso) tokobanda komeka yango ntango mosusu na sanza ya sambo to ya mwambe, tokozala na ba essais cliniques ya mangwele yango," elobi Dr. Muyembe.

Mokambi ya misala mya bitumba na COVID-19, andimi RDC eponami mpo komeka mangwele yango.

Kasi OMS nanu endimi mangwele yango te.

Mangwele yango ezali komeka na bato moke na Eatst-Unis mpe na mboka esusu ya poto. Kameka na bato ebele esengeli ebanda kala te.

XS
SM
MD
LG