Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

SADC epesi Zambie mikolo sambo mpo na kolongwa na mabele ya RDC (mbulamatari)


Basoda ba Zambie na Ndola, 11 février 2013.
Basoda ba Zambie na Ndola, 11 février 2013.

Lisanga lya bikolo ya etuka ya Afrika ya nse (SADC) lipesi Zambie mikolo 7 mpo na kotika mabele ya RDC, eyebisi mbulamatari.

Mokano ya SADC esakolamaki na likita lya mbulamatari ya ekolo Congo dénocratique na visioconférence na bokambami bwa président Félix Tshisekedi.

Tshisekedi alobeli bokoti ya mampinga ya Zambie na RDC (Vidéo)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:59 0:00

"Nsima na kotala matata kati na Zambie na RDC, SADC eye RDC esengaki kokata likambo, ekati ete ba localités ya Kibanga na Kalubamba ezali na mabele ma ekolo Congo démocratique. (SADC) epesameli Zambie mikolo sambo mpo na kolongola mampinga ma yango na RDC," esakoli molobeli ya mbulamatari David-Jolino Diwampovesa-Makelele.

Ba soda ba Zambie bakota na mboka eye mibale (Kibanga na Kalubamba) na Haut-Katanga mpe Lualaba wuto mwa ba sanza.

Bavandi ba mboka bamonaka bango wuto sanza ya misato.

Président Félix Tshisekedi apesaki losako na mokokani wa ye Denis Sassou N’Guessi Congo-Brazzaville, mokambi ya CIRGL (Lisanga ya bikolo bya etima minene/Grands Lacs), mposo moleki na Brazzaville mpo azalaki moto wa yambo ya kopamela Zambie na likambo lyango.

XS
SM
MD
LG