Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou asali masolo na Infantino, Eto’o na Djokaeff

Président Denis Sassou N’Guesso (2e à D) ayambi mokambi ya Fifa Gianni Infatino (1er à G) na Sameul Eto’o (1er D) mpe Youri Djorkaeff, basani ya kala ya lisano ndembo, Brazzaville, Congo, 29 novembre 2019. (Congo-Brazzaville présidence)

Mokonzi ya ekolo Congo-Brazzaville, Denis Sassou N’Guesso ayambaki mokambi ya Fifa Gianni Infatino o’mokolo ya mitano na Brazzaville.

M. Infatino azalaki na bokutani bwango na Sameul Eto’o mpe Youri Djorkaeff, basani ya kala ya lisano ndembo (football).

Mokambi ya Fifa akozala masolo na baye ya Fédération congolaise ya Football.

Awutaki na RDC, epayi wapi asalaki mikolo misato na Lubumbashi na bokanisi bwa mibu 80 ya TP Mazembe.

Na Lubumbashi, M. Infatino alaki kosunga Afrika mpo na kokela Ligue monene ya continent eye, kozua mokumba ya ba arbitres mpe kopesa milliards ya ba dollars na ntina ya kosunga kotonga ba stades ya minene na Afrika.

XS
SM
MD
LG