Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump aboyi kotatola liboso na Sénat, kolanda mopesi toli na ye


Donald Trump, 45e président ya Etats-Unis azali kopepa nsima na kotika Maison Blanche, Washington, 20 janvier 2021.
Donald Trump, 45e président ya Etats-Unis azali kopepa nsima na kotika Maison Blanche, Washington, 20 janvier 2021.

Donald Trump, mokonzi abimi na bokonzi na Etats-Unis, akokende te kotatola liboso na Sénat na bosambisami bwa ye (impeachment) mposo mokoya, elobi moko na bapesi toli na ye.

Bafundi ya mokonzi ya kala ya Amerika bangesi ye mposo mokoya.

"Akokende te kotatola na bosambisami botosi te Buku likonzi," eyebisi AFP Jason Miller mopesi toli ya M. Trump.

Bosambisami bwango bokbanda o’mokolo mwa mibale na Sénat.

Suku y anse ya bakeli mibeko to Chambre des représentants efundaki kofunda M. Trump mpo na eyoma balandi baye basalaki na Capitole na ntina ya komeka kopekisa Congrès kondima elonga ya Joe Biden na maponami ma mokonzi ya mboka.

M. Trump na balandi baye bandimaka elonga yango te mpe bakoba koloba ete maponami mayibamaki.

XS
SM
MD
LG