Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi aboyi kokende na Japon nsima ya liwa ya bato 30 na Kongo central


Nzoto na bato eziki pene na bus esalaki likama na Lufu, Kongo central, RDC, 20 octobre 2019. (Facebook/Salazaku Vol Demort Excellent‎)
Nzoto na bato eziki pene na bus esalaki likama na Lufu, Kongo central, RDC, 20 octobre 2019. (Facebook/Salazaku Vol Demort Excellent‎)

Koleka bato 30 bakufi na likama ya motuka na bokutani ya Nkamba na route nationale N0 1 na etuka ya Kongo central, eyebisi bakonzi ya ekolo Congo democratique. Président Félix Tshisekedi aboyi kokende na Japon, na botiyami na bokonzi, nsima na liwa ya bato baye.

"Motango ya bawei na likalama yango ezali monene. Kino sik’oyo ; pene na bato 30 bawei mpe 16 bazoki mpota enene," esakoli na liyebisi mokambi ya misala ya président Felix Tshisekedi, Vital Kamerhe.

Ntina ya likama liyebisami te. Kasi banzeneke bayebisi bapanzi sango ete bus moko ya marque Tata eye ememaki bato na mobongo na mboka Lufu ebimaki na nzela mpe ebalukaki na lubwaku ya pembeni.

Mingi bakanisi ete frein nde ezalaki malamu te.

Gouverneur intérimaire ya Kongo central akitaki na esika yango mpe amemaki lisungi.

Président Tshisekedi aboyi kokende Japon mpo likama yango, elobina liyebisi Vital Kamerhe.

M. Tshisekedi abengisamaki na botiyami na bokonzi ya empereur ya Japon.

XS
SM
MD
LG